John 7

Yesu akendaki na feti ya bandako ya kapo

1Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galileya. Aboyaki kovanda na Yudea pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma ye. 2Bongo feti ya Bayuda, oyo ya bandako ya kapo ekomaki pene-pene.

3Bandeko ya Yesu balobaki na ye :

—Longwa awa mpe kende na Yudea, mpo ete bayekoli na yo bakoka komona makamwisi oyo ozali kosala !
4Moto moko te oyo alingi koyebana na bato, bongo asalaka na kobombama. Lokola ozali kosala makambo oyo, malamu omilakisa na bato nyonso.

5Pamba te, ata bandeko na ye moko bazalaki kondimela ye te.

6Yesu azongiselaki bango :

—Tango na ngai naino ekoki te, kasi mpo na bino tango nyonso ezali malamu.

7Mokili ekoki koyina bino te, kasi ezali koyina ngai mpo natatolaka ete misala na yango ezali mabe. 8Bino, bokende na bino na feti ; kasi ngai nakokende te pamba te tango na ngai naino ekoki te !

9Sima ya koloba na bango bongo, atikalaki na ye na Galileya. 10Tango bandeko na ye bakendaki na feti, ye mpe akendaki, amimonisaki na miso ya bato te kasi azalaki kobombama. 11Na feti, Bayuda bazalaki koluka ye mpe bazalaki kotuna :

—Azali wapi ?

12Bongo tembe makasi ezalaki na kati ya ebele ya bato mpo na ye. Bato mosusu bazalaki koloba :

—Azali moto malamu !

Bamosusu :

—Te, azali kokosa bato !

13Kasi moto ata moko te azalaki koloba na bonsomi nyonso mpo na Yesu, pamba te bazalaki kobanga Bayuda. 14Tango bakomaki na kati-kati ya mikolo ya feti, Yesu akendaki na Ndako ya Nzambe, mpe azalaki koteya. 15Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana :

—Ndenge nini moto oyo ayebi Makomi boye, ye moto ayekola te ?

16Bongo Yesu azongiselaki bango :

—Mateya oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ewuti epai ya Ye oyo atindaki ngai.
17Soki moto aponi kosala mokano ya Nzambe, akoyeba soki mateya na ngai ewuti na Nzambe to mpe nalobaka na kombo na ngai moko. 18Moto oyo alobaka na kombo na ye moko, alukaka lokumu na ye moko. Kasi moto oyo alukaka lokumu ya moto oyo atindaki ye, ye azali moto ya solo mpe lokuta ezali kati na ye te. 19Boni, Moyize apesaki bino Mibeko te ? Nzokande, ata moto moko te na kati na bino atosaka Mibeko yango. Bongo mpo na nini bozali koluka koboma ngai ?

20Ebele ya bato bazongisaki :

—Ozali na molimo mabe ! Nani azali koluka koboma yo ?

21Yesu alobaki na bango :

—Nasalaki likamwisi moko, mpe bino nyonso bokamwaki mpo na yango.
22Moyize apesaki bino etinda ya kokata nzoto, (mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko), mpe bino bosalaka yango ata na mokolo ya saba. 23Bongo soki bokataka bato nzoto na mokolo ya saba mpe yango ebukaka mobeko ya Moyize te, kasi mpo na nini bozali kosilika na ngai mpo nabikisaki moto na mokolo ya saba ? 24Botika kokata makambo na ndenge oyo bino bozali komona na miso, kasi bokataka na ndenge ya sembo.

25Bongo bato mosusu ya Yeruzalem babandaki kotuna :

—Ye oyo te moto bazali koluka koboma ?
26Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te. Boni, bakonzi na biso basiʼbandimi ete ye azali penza Kristo ? 27Kasi biso toyebi soki moto oyo awuti esika nini ; nzokande tango Kristo akoya, moto ata moko te akoyeba soki ye akowuta esika nini !

28Na tango wana, Yesu azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe agangaki :

—Ya solo boyebi ngai, mpe boyebi esika nawuti. Naye na kombo na ngai moko te kasi Ye oyo atindi ngai azali solo, mpe bino boyebi ye te.
29Ngai nayebi ye, pamba te nawuti epai na ye mpe ye moto atindi ngai.

30Bongo balukaki nzela mpo na kokanga Yesu, kasi moto ata moko te amekaki kosimba ye pamba te tango na ye ekokaki naino te. 31Mpe bato mingi na kati ya ebele ya bato bandimelaki ye ; bazalaki koloba :

—Boni, tango Kristo akoya, akosala makamwisi mingi koleka ya moto oyo ?

32Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba-koloba mpo na Yesu : bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bafarizeo batindaki bakengeli ya Ndako ya Nzambe mpo bakanga Yesu.

33Kasi Yesu alobaki :

—Nazali elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki ngai.
34Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te ; mpe bokokoka te koya epai ngai nakozala !

35Bongo Bayuda balobanaki bango na bango :

—Yango moto oyo akokende wapi mpo tomona ye lisusu te ? Boni, akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana na kati ya Bagreki, mpe koteya Bagreki ?
36Alingi penza koloba nini tango azali koloba : “Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te ; mpe bokokoka te koya epai ngai nakozala ?”

Mayi ya bomoi

37Mokolo ya suka ya feti, mokolo monene ya feti ; Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi :

—Soki moto azali na posa ya mayi, aya epai na ngai mpe amela.
38Lokola Makomi ezali koloba : Moto oyo akondima ngai, ba-ebale ya mayi ya bomoi ekobanda kobima kati na ye. 39Yesu alobaki bongo mpo na Molimo oyo bato oyo bandimaki ye, basengelaki kozwa. Pamba te, na tango wana, Molimo apesamaki naino te mpo Yesu akotaki naino te na nkembo na ye.

Bato bakabwani mpo na Yesu

40Bato mingi na kati ya ebele ya bato oyo bayokaki maloba na ye, balobaki :

—Ya solo, moto oyo azali moprofeta !

41Bato mosusu bazalaki koloba :

—Azali Kristo !

Kasi bamosusu balobaki :

—Boni, akowuta na Galileya ?
42Makomi eloba te ete Kristo akowuta na libota ya David mpe akobotama na Betelemi, vile oyo David avandaki ?

43Bongo bato bakabwanaki mpo na Yesu. 44Basusu balingaki kokanga ye, kasi moto ata moko te amekaki kosimba ye.

Bakonzi ya Bayuda baboyaki kondima Yesu

45Bakengeli ya Ndako bazongaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe na Bafarizeo. Bongo bango batunaki bakengeli :

—Mpo na nini boye na ye te ?

46Bakengeli bazongisaki :

—Moto ata moko te naino aloba lokola ye !

47Bafarizeo batunaki bango :

—Nini, bino mpe bondimi kokosama ?
48Ezali na moto, kati na bakonzi to Bafarizeo, oyo andima ye ? 49Kasi ezali kaka ebele ya bato wana oyo bayebi Mibeko te bazali bato balakelama mabe !

50Nikodemi oyo akendaki mokolo moko epai ya Yesu na butu mpe azalaki moko na kati na bango, alobaki na bango :

51—Boni, Mibeko na biso ekatelaka moto etumbu soki naino bayoki ye te mpe soki naino bayebi te likambo ya mabe oyo ye asalaki ?

52Bango bazongiselaki ye :

—Boni, Yo mpe ozali moto ya Galileya ? Tanga malamu-malamu Makomi, mpe okomona ete ata moprofeta moko te naino abima na Galileya !
53[Bongo moto moko na moko azongaki na ndako na ye.
Copyright information for LinMNB